Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




3 Yoane 1:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bato nyonso bazali kopesa litatoli ya malamu na tina na Demetriusi, ezala yango moko bosolo ezali mpe kopesa litatoli ya malamu na tina na ye. Biso mpe tozali kopesa litatoli ya malamu na tina na ye, mpe oyebi malamu ete litatoli na biso ezalaka ya solo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




3 Yoane 1:12
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo azali kopesa litatoli na tina na makambo oyo amonaki yango kosalema na miso na ye, mpe litatoli na ye ezali ya solo ; ayebi penza ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima.


Ezali kutu moyekoli yango nde azali kotatola makambo yango mpe akomaki yango na mokanda. Mpe biso toyebi ete litatoli na ye ezali ya solo.


Bato yango bazongisaki : — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda ; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.


Ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Azalaki kotosa makambo ya Nzambe ndenge Mobeko ezalaki kotinda, mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya Bayuda nyonso ya engumba wana.


Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bayebana na bizaleli na bango ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango.


mpo ete, mokolo na mokolo, Bapagano bamemia bino, mpe mpo ete bobika te bomoi na bino na sima ya mokongo ya moto.


Mokambi ya Lingomba asengeli mpe kozala moto oyo akenda sango ya malamu kati na bato oyo bazali bandimi te mpo ete abatela lokumu na ye mpe akweya te na mitambo ya Satana.


Bato bazongiselaki ye : — Onyokolaki biso te mpe omonisaki biso pasi te ; ozwaki ata eloko moko te na maboko ya moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ