Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




3 Yoane 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Ngai mpaka ; Epai ya Gayusi, molingami na ngai, oyo nalingaka kati na solo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




3 Yoane 1:1
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basalaki bongo : batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na nzela ya Barnabasi mpe Saulo.


Mbala moko, mobulu ekotaki kati na engumba mobimba. Bakangaki Gayusi mpe Arisitarke, bato mibale ya Masedwane, oyo bazalaki kotambola elongo na Polo ; mpe bato nyonso bakendeki na lombangu na ndako ya masano.


Tala bato oyo bakendeki na ye elongo : Sopatere, mwana ya Pirisi, moto ya Bere ; Arisitarke mpe Sekundusi, bato ya Tesalonika ; Gayusi, moto ya Derbe ; Timote, Tishike mpe Trofime, bato ya etuka ya Azia.


Gayusi, oyo ayambaki ngai mpe Lingomba mobimba kati na ndako na ye, apesi bino mpe mbote. Erasite, mobateli bomengo ya engumba, elongo na Karitisi, ndeko na biso, batindeli bino mbote. [


Nazongisaka matondi epai ya Nzambe ete nabatisa moto ata moko te kati na bino, longola kaka Krispisi mpe Gayusi,


Nazali sik’oyo kolendisa bakambi ya Lingomba, oyo bazali kati na bino, pamba te ngai mpe nazali mokambi lokola bango, nazali motatoli ya bapasi ya Klisto mpe nakozwa nkembo oyo ekomonisama.


Bana na ngai, tika ete bolingo na biso esukaka kaka te na lolemo to na maloba ya sukali ; kasi tika ete emonisamaka nde na misala mpe na solo.


Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ