Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Yoane 1:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bato ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili, bazali kobungisa bato mingi nzela ; bandimaka te ete Yesu-Klisto akomaki penza moto. Moto nyonso oyo alobaka ndenge wana azali moto ya lokuta mpe monguna ya Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Yoane 1:7
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.


Nazali kokomela bino makambo oyo na tina na bato oyo bazali komeka kopengwisa bino.


Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.


Ezalaki kokosa bavandi nyonso ya mokili na nzela ya bikamwa oyo epesamelaki makoki ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Ezalaki kopesa bango mitindo ete basala ekeko mpo na kopesa lokumu na nyama oyo babetaki mopanga kasi ezali na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ