Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.
Monoko na ye ezalaki kobimisa malakisi ya solo ; lokuta etikalaki komonana na bibebu na ye te. Azalaki kotambola elongo na Ngai na kimia mpe na alima. Na nzela na ye, bato ebele batikaki kotambola na nzela ya masumu.
Kasi tango ngai namonaki ete bazali kotambola te na bomoi ya sembo kolanda bosolo ya Sango Malamu, nalobaki na Petelo na miso ya bango nyonso : « Ozali Moyuda, kasi ozali kobika bomoi na yo lokola Mopagano ! Ndenge nini ozali kosenga na makasi ete Bapagano batambola lokola Bayuda ?
Nazalaki penza na esengo mingi kati na Nkolo, wana botalisaki ngai lisusu bolingo na bino. Solo, bozalaki kokanisa kosunga ngai, kasi bozangaki nde libaku mpo na kokokisa yango.