Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Yoane 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tolingaka bino mpo na solo oyo ezali kati na biso mpe ekozalaka elongo na biso tango nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Yoane 1:2
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso,


Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango.


Mpe nasalaka makambo wana nyonso mpo na Sango Malamu, mpo ete ngai mpe nazwa mapamboli na ngai kati na yango.


Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.


Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.


Nakanisaka bosolo ya kondima na yo, oyo Loyisi, koko na yo ya mwasi, mpe Enise, mama na yo, bazalaki na yango, kondima oyo nandimisami solo ete ezali mpe kati na yo.


Boye, nakobanda kozongisaka yango tango nyonso na makanisi na bino, atako boyebi yango malamu mpe bokangami makasi na bosolo oyo bozali na yango sik’oyo.


Soki tolobi ete tozali na masumu te, wana tozali komikosa biso moko mpe solo ezali te kati na biso.


Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.


Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ