Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Yoane 1:10 - Mokanda na Bomoi

10 Soki moto moko ayei epai na bino mpe amemeli bino mateya mosusu, boyamba ye te kati na bandako na bino, mpe bopesa ye ata mbote te,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Yoane 1:10
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abondelaki : « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai.


Moto na Nzambe alobaki : — Nakoki te kozonga to kotambola nzela moko na yo ; nakoki mpe te kolia lipa to komela mayi elongo na yo na esika oyo,


Tika ete baleki nzela baloba na bango te : « Tika ete Yawe apambola bino ! » Topamboli bino na Kombo na Yawe !


Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye : Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino : Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi ; Mbote na bino.


Soki ezali na moto oyo alingaka Nkolo te, tika ete alakelama mabe ! Oh Nkolo, yaka !


Kasi nazali nde kokomela bino sik’oyo mpo na koyebisa bino ete bozala lisanga moko te na moto oyo amilobelaka ete azali ndeko Moklisto, kasi atambolaka na bomoi ya pite to azali na lokoso ya mbongo to azali mosambeli bikeko to mofingi bato to molangwi masanga to moyibi. Bosengeli kutu te kolia mesa moko elongo na moto ya lolenge oyo.


Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino kati na mokanda oyo, bokebisa bato nyonso na tina na ye mpe bosangana na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.


Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.


Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba ;


pamba te moto oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.


Yango wana, tango nakoya, nakobimisa mabe na ye na polele ; azali koloba makambo ya mabe mpe ya lokuta na tina na biso. Mpe asuki kaka wana te, azali ata koboya koyamba bandimi mosusu, azali kopekisa, kotelemela mpe kobengana na Lingomba, bato oyo bandimi koyamba bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ