1 Ngai mpaka ; Epai ya mwasi moponami ya Nzambe, mpe epai ya bana na ye, oyo nalingaka kati na solo. Ezali ngai moko kaka te moto nalingaka bino, kasi mpe bato nyonso oyo bayebi solo.
Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu,
Kasi tango ngai namonaki ete bazali kotambola te na bomoi ya sembo kolanda bosolo ya Sango Malamu, nalobaki na Petelo na miso ya bango nyonso : « Ozali Moyuda, kasi ozali kobika bomoi na yo lokola Mopagano ! Ndenge nini ozali kosenga na makasi ete Bapagano batambola lokola Bayuda ?
Kondima mpe bolingo yango etongami na likolo ya elikya ya bomengo oyo Nzambe abongisela bino kati na Likolo ; elikya yango ebotamaki kati na bino tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu
Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !
Nazali sik’oyo kolendisa bakambi ya Lingomba, oyo bazali kati na bino, pamba te ngai mpe nazali mokambi lokola bango, nazali motatoli ya bapasi ya Klisto mpe nakozwa nkembo oyo ekomonisama.