Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Timote 4:8 - Mokanda na Bomoi

8 Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Timote 4:8
39 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?


Tika ete ekangama, bibebu oyo elobaka lokuta, oyo elobaka na lolendo mpe na lofundu, oyo ebebisaka lokumu ya moto ya sembo na nzela ya songisongi.


Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali nguba na ngai, abikisaka bato ya sembo.


Ekolatisa yo ekoti ya lokumu na moto, ekopesa yo motole ya nkembo. »


« Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.


Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele ? ›


Nazali koloba na bino penza ya solo : Na mokolo wana, etumbu na yango ekozala makasi koleka etumbu ya Sodome.


Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.


Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela ; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.


Kasi, kolanda ndenge ekomama : « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »


mokolo ya kosambisama ekomonisa mosala na ye polele ; pamba te ekozala mokolo ya moto, mpe moto ekomeka mosala ya moto na moto.


Bato nyonso oyo basalaka masano bamipekisaka makambo ebele ; basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka ; kasi biso, tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te.


Nzokande, kati na ndako yango ya kapo, tozali penza komona pasi, wana tozali kozela na posa makasi ete tolata ndako na biso ya Lola,


na elikya ete ngai mpe nakosekwa kati na bakufi.


Kondima mpe bolingo yango etongami na likolo ya elikya ya bomengo oyo Nzambe abongisela bino kati na Likolo ; elikya yango ebotamaki kati na bino tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu


mpe mpo na kozela, kowuta na Likolo, Mwana na Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Yesu oyo azali kokangola biso na kanda oyo ezali koya.


Kasi bino bandeko, bozali kati na molili te mpo ete mokolo yango ekanga bino na mbalakata lokola moyibi.


mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.


Ezali na nzela wana nde bakomibombela bomengo lokola moboko ya makasi mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bakoka kozwa bomoi ya solo.


Nzokande ngolu yango emonani sik’oyo na nzela ya koya ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso, oyo asilisaki nguya ya kufa mpe atalisaki bosolo ya bomoi ya seko na nzela ya Sango Malamu.


Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.


Tika ete, na mokolo wana, Nkolo atalisa ngolu na Ye epai ya Onezifore ! Oyebi lisusu malamu ndenge nini asungaki ngai kati na Efeso.


Ezali mpe ndenge moko mpo na moto oyo azali kosala lisano ya kokima mbangu : akoki te kozwa motole soki akimi mbangu te kolanda mibeko ya lisano.


Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo :


wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama : komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo


Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa ; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango : bomoi ya bosembo mpe ya kimia.


ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.


Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.


ete tokozwa libula oyo abombela biso kati na Likolo, libula oyo ebebaka te, ezwaka bosoto te, mpe ebungisaka kitoko na yango te. Ezali mpe kaka libula yango nde Nzambe abombela bino


Bongo tango Mokonzi ya babateli bibwele akoya, bokozwa motole ya nkembo oyo ekotikala kobungisa kitoko na yango te.


« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.


Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.


Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.


Motatoli ya makambo oyo alobi : — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen : Nkolo Yesu, yaka !


bampaka tuku mibale na minei bazalaki kogumbama liboso ya Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, kogumbamela Ye oyo azali na bomoi seko na seko mpe kokitisa mitole na bango liboso ya Kiti ya Bokonzi na koloba :


Zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki mpe na bakiti mosusu tuku mibale na minei ya bokonzi, mpe bampaka tuku mibale na minei bavandelaki yango. Bampaka yango balataki bilamba ya pembe, mpe bazalaki na mitole ya wolo na mito na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ