Oh Yelusalemi, natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ; bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu. Bino bato oyo bosalaka ete Yawe akanisa lisusu Yelusalemi, bovanda kimia te ;
« Mwana na moto, loba na bandeko na yo mpe yebisa bango : ‹ Soki nabimisi bitumba na mokili moko, bongo bato ya mokili yango baponi moko kati na bango lokola mokengeli na bango ;
Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye ; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu.
Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.
Mokolo oyo elandaki, tokendeki na Sezarea mpe tovandaki na ndako ya Filipo, mopanzi Sango Malamu. Azalaki moko kati na bato sambo oyo Lingomba eponaki.
na nzela ya nguya Molimo na Nzambe, oyo emonisami kati na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, na bazingazinga nyonso kino na Iliri, nasakolaki Sango Malamu ya Klisto na mobimba na yango.
Boye, koyoka soni te mpo na kotatola na tina na Nkolo na biso to mpe na tina na ngai oyo nakangami na boloko mpo na Ye, kasi mona pasi elongo na ngai mpo na Sango Malamu kolanda makasi oyo Nzambe azali kopesa yo,
Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.
Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.
Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba.
Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.