22 Tika ete Nkolo azala elongo na molimo na yo ! Tika ete ngolu ezala na bino nyonso !
bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.
Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
Etikali moke, Nzambe ya kimia akonyata-nyata Satana na se ya matambe na bino. Tika ete ngolu ya Yesu, Nkolo na biso, ezala na bino !
Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino !
Bandeko na ngai, tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na bino ! Amen !
Tika ete ngolu ezala na bato nyonso oyo balingaka Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na bolingo oyo ekoki kobeba te !
Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto ezala elongo na molimo na bino !
Ngai Polo, napesi bino mbote na kokoma yango na maboko na ngai. Bobosanaka te ete nazali mokangami kati na boloko. Tika ete ngolu ezala na bino !
Bato mingi babungisaki kondima na bango mpo ete bakangamaki na boyebi yango. Tika ete ngolu ezala elongo na bino nyonso !
Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na yo !
Bopesanaka bino na bino mbote, na beze ya bondeko. Tika ete kimia ezala na bino nyonso oyo bozali kati na Klisto !
Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso !