Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Timote 4:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosunga ngai ; bango nyonso basundolaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Timote 4:16
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bayekoli na Ye nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.


Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;


Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai.


— Bandeko mpe batata, boyoka sik’oyo ndenge nini nalingi komilongisa.


Kasi nayebisaki bango ete bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye, mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye.


Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.


ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.


Tala eyano na ngai epai ya bato oyo basambisaka ngai :


Botala makambo oyo mawa ya malamu na miso ya Nzambe ememaki kati na bino : bolingo, molende mpo na kolimbisana, koboya mabe, kotosa, posa makasi ya komona ngai, komipesa na mosala, molende ya kopamela mabe. Na nyonso, bolakisaki penza ete bosalaki mabe te kati na likambo oyo.


Kasi mpo na ba-oyo bazali kosakola Klisto mpo na posa ya kowelana, makanisi na bango ezali ya malamu te : bazali kokanisa ndenge nini bakoki kobakisa pasi na ngai, na tango oyo nazali na pasi lokola mokangami kati na boloko.


Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.


Oyebi malamu ete bato nyonso oyo bazali kati na mokili ya Azia bakimaki ngai ; kati na bango, tozali na Fijele mpe Erimojene.


Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia.


Yo mpe sala keba liboso na ye, pamba te atelemelaki makasi mateya na biso.


Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ