Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Timote 4:14 - Mokanda na Bomoi

14 Alekizandre, monyangwisi bibende, asalaki ngai mabe mingi. Nkolo akofuta ye kolanda misala na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Timote 4:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »


Zongisela bango kolanda misala na bango, kolanda misala mabe na bango ; zongisela bango kolanda misala ya maboko na bango, mpe kweyisela bango oyo ekoki na misala na bango.


Nzambe alobaki mbala moko, ngai nayokaki mbala mibale : « Pamba te makasi ezali ya Nzambe ;


Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, kanisa ngai mpe batela ngai. Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te ! Tala ndenge nazali kondima koyoka soni kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo !


Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango kolanda misala na bango ;


Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.


Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye :


Solo, Nzambe azali sembo : akozongisa pasi lokola etumbu epai ya banyokoli na bino ;


Kati na bango, ezali na Imene mpe Alekizandre, ba-oyo nakabi na maboko ya Satana mpo ete bayeba ete basengeli te kofinga Nzambe.


Yo mpe sala keba liboso na ye, pamba te atelemelaki makasi mateya na biso.


Soki omoni ndeko na yo kosala lisumu oyo ememaka na kufa te, osengeli kobondela mpo na ye, mpe Nzambe akopesa ye bomoi. Nazali koloba nde na tina na bato oyo basalaka lisumu oyo ememaka na kufa te. Kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa ; ezali te na tina na lisumu yango nde nazali kosenga na bino kobondela.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Bosala yango ndenge kaka yango esalaki bato mosusu, bozongisela yango mbala mibale mabe oyo esalaki bino. Kati na kopo oyo ezalaki kosalela mpo na komelisa bamosusu masanga, botia masanga oyo ezali makasi mbala mibale koleka.


Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »


Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai ! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ