13 Tango okoya, memela ngai kazaka oyo natikaki na Troasi epai ya Karipisi ; memela ngai mpe babuku na ngai, mingi-mingi babuku oyo basala na poso ya banyama.
Soki moto alingi kofunda yo mpo na kozwa elamba na yo, pesa ye mpe kazaka na yo.
Longwa na Troasi, tozwaki masuwa mpe tokendeki mbala moko kino na esanga ya Samotrase ; bongo mokolo oyo elandaki, tokomaki na Neyapolisi.
Boye bakatisaki etuka ya Mizi mpe bakendeki kino na libongo ya Troasi.
bayokaki mawa mingi koleka mpo alobaki na bango ete bakomona elongi na ye lisusu te. Bongo bakendeki kotika ye kino na masuwa.
Kino sik’oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, tozali kobetama, tozali koyengayenga,
Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata.