1 Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo :
Boye Yesu alobaki : — Ezalaki na moto moko abotama na libota ya mbongo ; akendeki na mokili moko ya mosika mpo ete bakomisa ye mokonzi mpe, sima na yango, akozonga.
Sima na ye kozwa bokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengaki basali epai ya banani apesaki mbongo mpo na koyeba soki bazwi mileki boni na mbongo na ye.
Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.
mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.
Nzokande ngolu yango emonani sik’oyo na nzela ya koya ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso, oyo asilisaki nguya ya kufa mpe atalisaki bosolo ya bomoi ya seko na nzela ya Sango Malamu.
Yango nde makambo oyo osengeli koloba mbala na mbala epai ya bato, na kopesa bango mitindo liboso ya Nzambe ete batika koswana na tina na maloba ; ezali na tina moko te, soki kaka te komema bato oyo bayokaka yango na libebi.
Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.
Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.
Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.
Pamba te Nzambe Tata apesaki Ye lokumu mpe nkembo, tango mongongo kowuta na nkembo monene ya Nzambe elobaki na Ye : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
Sik’oyo, bana na ngai, bowumela ya kokangama na Klisto mpo ete, na ngonga nyonso oyo akomimonisa, tozala na elikya mpe toyoka soni te na liboso na Ye tango akoya.
« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.