Kati na Jafa, ezalaki na mwasi moyekoli moko, kombo na ye ezalaki « Tabita. » Na lokota ya Greki, kombo na ye ezalaki Dorkasi (oyo elingi koloba : Mboloko). Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosunga babola.
Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,
Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.
Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.
Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !