Pesa na mwana na ngai ya mobali, Salomo, motema ya boyengebene mpo na kobatela mitindo na Yo, malako na Yo mpe bikateli na Yo ; mpo na kosala nyonso mpe kotonga Ndako oyo nasaleli mabongisi oyo nyonso. »
Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino, bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango, kasi bakanisaka te mosala na Yawe mpe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye.
Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso : koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge.
Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso ; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya ;
mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso ; Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba.
Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.
Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.
Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.