Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Timote 2:13 - Mokanda na Bomoi

13 soki tozangi kondima, Ye azalaka kaka Moyengebene, pamba te akoki komiwangana te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Timote 2:13
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, ozali Nzambe na ngai ; nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ; pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, osalaki mabongisi ya kokamwa, makambo oyo obongisa wuta kala.


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


Soki Bayuda mosusu bazangaki kondima, boni, bozangi na bango kondima ekolongola bosembo ya Nzambe ?


Elingi koloba te ete Liloba na Nzambe ebimaki na pamba, pamba te bakitani nyonso ya Isalaele bazali bana ya Isalaele te,


Pamba te Nzambe oyo abengaki bino mpo ete bozala moko na Mwana na Ye, Yesu-Klisto, Nkolo na biso, azali Moyengebene.


Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.


Ye oyo azali kobenga bino azali sembo, mpe Ye nde akokokisa yango.


Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela bino liboso ya Satana.


mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango,


Mpo na yango, mpo ete, biso bato oyo totika nyonso mpo na kosimba elikya ete tokozwa biloko oyo alakaki biso, tolendisama makasi, Nzambe asalelaki makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ