2 Timote 1:9 - Mokanda na Bomoi9 pamba te abikisaki biso mpe abengaki biso mpo ete totambola na bomoi ya bule. Mpe soki asalaki bongo, ezali te mpo na misala na biso, kasi ezali nde mpo na mabongisi mpe ngolu na Ye moko kaka, ngolu oyo apesaki biso kati na Yesu-Klisto liboso ya ebandeli ya tango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.
Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu.