Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Timote 1:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yango wana nazali kolendisa yo ete olamusa lisusu likabo oyo Nzambe apesaki yo tango natiaki yo maboko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Timote 1:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe basi nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe bayebaki kosala bilamba, basalaki yango na bapwale ya ntaba.


Bongo Moyize abengisaki Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele elongo na bato oyo bamibongisaki mpo na kosala misala yango.


Zongisa yango nanu na makanisi na Ngai ; tika ete tosamba elongo, mpe loba yo moko mpo na kotalisa ete ozali moto ya sembo.


Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango : « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »


Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na nkota ya sika mpe kosakola.


Balakisaki bango epai ya Bantoma ; Bantoma basambelaki mpo na bango mpe batiaki bango maboko.


Kozwa na pamba te likabo oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya lisakoli, tango lisanga ya bakambi ya Lingomba batielaki yo maboko.


Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo.


Yango nde makambo oyo osengeli koloba mbala na mbala epai ya bato, na kopesa bango mitindo liboso ya Nzambe ete batika koswana na tina na maloba ; ezali na tina moko te, soki kaka te komema bato oyo bayokaka yango na libebi.


teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.


ndenge nyonso ya kobatisa, kotiela bato maboko, lisekwa ya bakufi, mpe etumbu ya seko.


Boye, nakobanda kozongisaka yango tango nyonso na makanisi na bino, atako boyebi yango malamu mpe bokangami makasi na bosolo oyo bozali na yango sik’oyo.


Balingami na ngai, tala mokanda ya mibale oyo nakomeli bino. Kati na mikanda nyonso mibale, nazali koluka kolamusa, kati na makanisi na bino, malakisi oyo bozwaki, mpo ete bokoma kokanisa na lolenge ya peto,


Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ