10 Nzokande ngolu yango emonani sik’oyo na nzela ya koya ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso, oyo asilisaki nguya ya kufa mpe atalisaki bosolo ya bomoi ya seko na nzela ya Sango Malamu.
pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.
Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo ? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ? Nakoyokela bango mawa te !
Soki nzoto na yo mobimba ezali kati na pole, mpe eteni ata moko te ezali kati na molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole lokola tango mwinda engengisaka yo na nzela ya pole na yango.
Boye alobaki na mobateli elanga yango : « Tala, tokomi na mobu ya misato wuta nayaka koluka bambuma na likolo ya nzete oyo ya figi, mpe nazwi ata mbuma moko te. Kata yango ! Mpo na nini ekanga mabele pamba ? »
Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.
Bongo balobaki na mwasi wana : — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango.
kasi sik’oyo emonisami mpe elakisami epai ya Bapagano na nzela ya makomi ya basakoli kolanda ndenge Nzambe ya seko na seko atindaki mpo ete bikolo nyonso ekoka kondimela Ye mpe kotosa Ye,
Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te.
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
Solo, wana tozali nanu kati na ndako oyo ya kapo, tozali penza komona pasi mpe konyokwama, pamba te toboyi kobanda nanu na kolongola, kasi tolingi nde kolata mbala moko ndako na biso ya Lola, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka.
Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,
mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.
Boye, koyoka soni te mpo na kotatola na tina na Nkolo na biso to mpe na tina na ngai oyo nakangami na boloko mpo na Ye, kasi mona pasi elongo na ngai mpo na Sango Malamu kolanda makasi oyo Nzambe azali kopesa yo,
Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo :
Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.
Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :
Nzambe apesaki biso, na nzela ya nguya na Ye ya bonzambe, nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika bomoi ya botosi kati na makambo ya Nzambe mpe mpo na kokangama na Ye ; asalaki yango na kopesa biso boyebi ya Ye oyo abenga biso mpo ete tosangana na nkembo mpe na bolamu na Ye.
Soki, sima na bango kokabwana na mbindo ya mokili, mpo ete bayebi Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso, bamizongisi lisusu na bowumbu ya mbindo yango, bomoi na bango ekokoma mabe koleka ndenge ezalaki liboso.
kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !
Bomoi emimonisaki ; tomoni yango, tozali kotatola na tina na yango mpe kosakola epai na bino bomoi ya seko oyo ezalaki elongo na Tata mpe emimonisi epai na biso.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »
Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.
Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.