9 Mokonzi abengisaki Tsiba, mosali ya Saulo, mpe alobaki na ye : — Napesi na mwana ya nkolo na yo biloko nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe ya libota na ye.
Bongo mokonzi atunaki lisusu : — Wapi Mefibosheti, koko ya nkolo na yo ? Tsiba azongisaki : — Atikalaki na Yelusalemi, pamba te amilobelaki : « Lelo, libota ya Isalaele ekozongisa bokonzi ya koko na ngai na maboko na ngai. »
Mokonzi alobaki na Tsiba : — Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo. Tsiba alobaki : — Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai ! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo !
Pamba te na makanisi ya mokonzi, nkolo na ngai, esengelaki koboma bato nyonso ya libota ya koko na ngai, Saulo ; kasi atako bongo, ondimaki mosali na yo na mesa, kati na bato oyo bazali kolia elongo na yo. Boye makoki nini nakoki lisusu kozala na yango ya kosenga eloko epai ya mokonzi ?
Kati na ekolo ya Benjame, ezalaki na moto moko ya bozwi ; kombo na ye ezalaki « Kishi, » mwana mobali ya Abieli, mwana mobali ya Tserori, mwana mobali ya Bekorati, mwana mobali ya Afia, moto ya ekolo ya Benjame.