Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 9:7 - Mokanda na Bomoi

7 Davidi alobaki na ye : — Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 9:7
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato yango babangaki makasi tango bamemaki bango na ndako ya Jozefi mpe bazalaki kolobana bango na bango : — Bamemi biso awa likolo ya mbongo oyo batiaki na basaki na biso, na mbala ya liboso. Bakokweya likolo na biso, bakolonga biso, bakokanga biso lokola bawumbu mpe bakozwa ba-ane na biso.


Alobaki na bango : — Malamu ! Bobanga te. Ezali Nzambe na bino, Nzambe ya tata na bino, nde atiaki bomengo kati na basaki na bino. Kasi mpo na mbongo na bino, ngai nazwaki yango. Sima, amemelaki bango Simeoni.


nakabaki na maboko na yo ndako ya nkolo na yo, Saulo, mpe basi na ye ; napesaki yo libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda. Bongo soki nyonso wana ezalaki moke koleka, nalingaki kobakisela yo lisusu ebele koleka.


Kasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu.


Pamba te na makanisi ya mokonzi, nkolo na ngai, esengelaki koboma bato nyonso ya libota ya koko na ngai, Saulo ; kasi atako bongo, ondimaki mosali na yo na mesa, kati na bato oyo bazali kolia elongo na yo. Boye makoki nini nakoki lisusu kozala na yango ya kosenga eloko epai ya mokonzi ?


Nzokande, Barizilayi akomaki mobange, azalaki na mibu tuku mwambe, mpe ezalaki ye nde asungaki mokonzi na mikolo nyonso oyo mokonzi avandaki na Maanayimi, pamba te azalaki moto ya bozwi mingi.


Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.


Davidi atunaki : « Ezali lisusu na moto moko ya libota ya Saulo oyo azali nanu na bomoi ? Nazali na posa ya kotalisa ye bolamu mpo na Jonatan. »


Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale.


Tsiba alobaki na mokonzi : — Mosali na yo akosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akotinda ye. Boye Mefibosheti aliaki na mesa ya Davidi lokola moko kati na bana mibali ya mokonzi.


Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi.


Mokonzi atunaki ye : — Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe ? Tsiba azongiselaki mokonzi : — Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale.


Kasi talisa bolamu epai ya bana mibali ya Barizilayi, moto ya Galadi ; mpe sala ete bazala kati na bato oyo bakobanda kolia mesa moko elongo na yo, pamba te basungaki ngai tango nazalaki kokima Abisalomi, ndeko na yo ya mobali.


apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye.


Balobaka : « Pasi moko ya somo penza ekangi ye, ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »


apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye.


— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.


Pesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo ;


mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.


Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.


Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba ; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino.


Mpe kolemba te kosalela libota na ngai bolamu, ata tango Yawe akolongola banguna nyonso ya Davidi, na etando ya mokili. »


Sik’oyo, vanda awa elongo na ngai, kobanga te. Pamba te moto oyo azali koluka bomoi na yo azali koluka mpe bomoi na ngai. Okobatelama malamu epai na ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ