Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 9:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mokonzi atunaki ye : — Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe ? Tsiba azongiselaki mokonzi : — Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 9:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango akomaki na Yelusalemi mpo na kokutana na mokonzi, Davidi atunaki ye : — Mefibosheti, mpo na nini okendeki te elongo na ngai ?


Mefibosheti azongisaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki : « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. »


Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. »


Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi.


Davidi alobaki na ye : — Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.


Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.


Nzokande, Yawe alakisaki bolingo na Ye epai ya batata na bino mpe alingaki bango. Yango wana aponaki bino, bino bakitani na bango, kati na bikolo nyonso ndenge ezali lelo.


Lokola alingaki bakoko na yo mpe aponaki bakitani na bango, abimisaki yo na Ejipito na nguya na Ye mpe na makasi na Ye ya monene


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ