Nzambe abimisaki monguna mosusu mpo na kobundisa Salomo ; kombo na ye : Rezoni. Rezoni Azalaki mwana mobali ya Eliyada, oyo akimaki nkolo na ye, Adadezeri, mokonzi ya Tsoba.
Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki na maboko ya bato ya Filisitia engumba Gati elongo na bamboka na yango ya zingazinga.
Na Tibati mpe na Kuni, bingumba ya mokonzi Adadezeri, Davidi azwaki bronze ebele oyo, na mikolo oyo elandaki, Salomo asalaki na yango nzungu ya monene, makonzi mpe bisalelo mosusu ya bronze.
Tala, namonaki pasi mpo na kosangisa mpo na Tempelo ya Yawe, minkoko misato ya kilo ya wolo, minkoko tuku misato ya kilo ya palata, bronze mpe bibende ebele oyo bakoki kotanga te, mabaya mpe mabanga. Boye yo mpe okoki kobakisa mosusu.