Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 8:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 8:6
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakonzi nyonso oyo bazalaki na se ya bokonzi ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na bato ya Isalaele mpe bakomaki kosalela Isalaele. Bongo bato ya Siri bakomaki kobanga kosunga bato ya Amoni.


Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki na Beteleemi.


bosala yango sik’oyo ; pamba te Yawe alobaki boye na tina na ye : « Ezali na nzela ya Davidi, mosali na ngai, nde nakobikisa bato na Ngai, Isalaele, na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya banguna na bango nyonso. »


Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, azalaki elongo na ye.


Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki, mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili.


Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.


Davidi abotolaki banguba ya wolo oyo bakonzi ya basoda ya Adadezeri bazalaki na yango mpe amemaki yango na Yelusalemi.


Sima na kufa ya mokonzi Akabi, bato ya Moabi batombokelaki Isalaele.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jeroboami, misala na ye nyonso mpe elonga na ye na bitumba, ezala ndenge azongisaki na se ya bokonzi ya Isalaele Damasi mpe Amati, bingumba mibale oyo ezalaki ya Yuda, nyonso wana ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala. Atombokelaki mokonzi ya Asiri mpe aboyaki kosalela ye.


Mesha, mokonzi ya Moabi, azalaki kobokola bameme. Mibu nyonso, azalaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Isalaele, oyo ezalaki na motuya ya bampate nkoto nkama moko mpe ya bameme ya mibali nkoto nkama moko elongo na bapwale na yango.


Davidi atiaki bayangeli kati na Edomi, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Atiaki mampinga na ye kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi ; mpe atiaki masanga ya basoda kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba ya Efrayimi oyo Asa, tata na ye, abotolaki.


Nalobaka na Yawe : « Ozali Nzambe na ngai ! » Yawe, yoka mabondeli na ngai.


Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Mpo na Filisitia, nabetaka milolo ya elonga. »


Mpunda ebongisama mpo na mokolo ya bitumba, kasi elonga ewutaka na Yawe.


Jonatan alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki na Geba. Bongo bato ya Filisitia bayokaki sango na yango. Boye Saulo abetaki kelelo kati na mokili mobimba, mpe alobaki : « Tika ete Ba-Ebre bayoka ! »


Mokolo moko, Jonatan, mwana mobali ya Saulo, alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Yaka ! Tokatisa na ngambo mosusu epai wapi bato ya Filisitia bazali. » Kasi alobaki ata likambo moko te epai ya tata na ye.


Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso : ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.


Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : — Yaka ! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ