Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 8:2 - Mokanda na Bomoi

2 Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 8:2
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola ; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.


Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Sima na kufa ya mokonzi Akabi, bato ya Moabi batombokelaki Isalaele.


Salimanasari, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Oze. Mpe Oze akomaki mowumbu mpe akomaki kofuta mpako epai ya Salimanasari.


Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi. Bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.


Bato ya Amoni bafutaki mpako ya mokonzi epai ya Oziasi, mpe kombo na ye ekendeki sango kino na bandelo ya Ejipito, pamba te akomaki na nguya makasi koleka.


Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai ; Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende, mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.


Soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai ; mpe bapaya bayaka mpo ete nasepela na bango.


Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Mpo na Filisitia, nabetaka milolo ya elonga. »


Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule : « Nakolonga ! Nakokabola Sishemi mpe nakomeka molayi ya lubwaku ya Sukoti.


Basangani mpe bayokani, basali boyokani mpo na kotelemela Yo :


Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi mpe akomela mayi ya libulu na ye


‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.


Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba : « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini ? » Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia.


Tango Saulo azwaki bokonzi mpo na koyangela Isalaele, abundisaki banguna na bango na bangambo nyonso : Moabi, bato ya Amoni, Edomi, bakonzi ya Tsoba, mpe bato ya Filisitia. Bisika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kolonga bato wana.


Kolongwa wana, Davidi akendeki na Mitsipe ya Moabi mpe alobaki na mokonzi ya Moabi : « Nabondeli yo : Pesa tata na ngai mpe mama na ngai ndingisa ya koya kovanda elongo na yo kino ngai nakoyeba makambo oyo Nzambe akosala mpo na ngai. »


Boye Davidi amemaki bango epai ya mokonzi ya Moabi, mpe bavandaki elongo na ye tango nyonso oyo Davidi azalaki kati na ndako ya makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ