Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi.
Boye na bokambami ya Abishayi, bato ya Joabi, bato ya Kereti, bato ya Peleti mpe basoda nyonso ya mpiko, babimaki na Yelusalemi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni.
Mokonzi atindaki elongo na ye Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti, mpe bamatisi ye na likolo ya mile ya mokonzi.
Azaria, mwana mobali ya Natan, azalaki mokonzi ya babateli biloko ya mokonzi ; Zabudi, mwana mobali ya Natan, azalaki Nganga-Nzambe mpe mopesi toli ya mokonzi ;
Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi.
Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya mboka Moabi ; mpe na mokolo moko ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki bakalaka ya liboso pembeni ya mokonzi.
mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bato ya Filisitia ; nakoboma bato ya Kereti mpe nakobebisa batikali oyo bazalaka pembeni ya ebale monene.
Mawa na bino bavandi ya etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, bino bato ya Kereti ! Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino : « Kanana, mokili ya bato ya Filisitia, nakobebisa yo, mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »