2 Samuele 8:17 - Mokanda na Bomoi17 Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Tseraya azalaki mokomi mikanda ; အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nganga-Nzambe Yeoyada akamataki sanduku moko mpe atobolaki mofinuku na yango. Atiaki sanduku pembeni ya etumbelo, na ngambo ya loboko ya mobali tango ozali kokota kati na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobatela ekuke batiaki kati na sanduku mbongo nyonso oyo bazalaki komema na Tempelo ya Yawe.
Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai ; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe.