Boye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye. Mpe na tango wana, bana ya Isalaele bakimaki moto na moto na ndako na ye.
Joabi mpe Abishayi balandaki Abineri ; mpe wana moyi ezalaki kolala, bakomaki na etando ya Ama oyo etalani na Guya, na nzela oyo ekenda na esobe ya Gabaoni.
Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki, mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili.
Ayembaki yango tango abundisaki bato ya Siri ya Mezopotami mpe bato ya Siri ya Tsoba, mpe tango Joabi azongaki, sima na ye kolonga bato nkoto zomi na mibale ya Edomi, na bitumba kati na Lubwaku ya Mungwa.
Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango ; bakangaki ata minoko ya bankosi,
balongaki nguya ya moto oyo ezalaki kopela makasi mpe babikaki na kufa ya mopanga. Atako bazalaki bato ya bolembu, bakomaki makasi na bitumba mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.
Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia.