Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 7:8 - Mokanda na Bomoi

8 Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : « Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 7:8
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Natan alobaki na Davidi : — Moto yango ezali nde yo ! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo ;


Mwasi alobaki : — Mpo na nini osali mabongisi ya boye mpo na kotelemela bato ya Nzambe ? Wana mokonzi abimisi maloba oyo, ye moko azali komikweyisa te mpo ete azongisi te mwana mobali oyo akimaki na mboka ya bapaya ?


Tala maloba ya suka ya Davidi : Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, moto oyo atombolama na bokonzi, mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele :


Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! »


Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »


Davidi alobaki na Mikali : — Nazalaki nde kosepela liboso ya Yawe oyo aponaki ngai mpe asepelaki na ngai koleka tata na yo mpe moto nyonso ya ndako na ye, tango akomisaki ngai mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe.


Salomo azongisaki : — Otalisi bolamu monene epai ya tata na ngai, Davidi, mosali na Yo, pamba te atambolaki na boyengebene mpe na bosembo na miso na Yo ; okobaki kotalisa ye bolamu monene na Yo mpe opesi ye mwana mobali oyo avandi lelo na kiti na ye ya bokonzi.


« Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala ; kasi naponaki Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele ! »


Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele.


Davidi alobaki na Nzambe : — Boni, ezali ngai nde napesaki mitindo ete batanga motango ya bato ? Ngai moko nde nasalaki masumu, ngai moko nde nasalaki mbeba oyo eleki mabe. Bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te. Oh Yawe, Nzambe na ngai, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ; kasi tika ete bokono oyo ebomaka ekweyela te bato na Yo !


Kasi Yawe alongolaki ngai na mosala ya kobatela bibwele mpe alobaki na ngai : « Kende kosakola epai ya bato na Ngai, Isalaele. »


oyo azwaki ngolu na miso ya Nzambe mpe asengaki ete atongela Nzambe ya Jakobi ndako.


Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ?


Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.


Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ