Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na ngai, Isalaele : ‹ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele ? › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 7:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »


Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »


Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na Ngai : ‘ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele ? ’ ›


Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele : kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye ; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?


Nakopesa bango na maboko ya babateli mosusu ya bibwele mpo ete babatela bango malamu. Boye, bakobanga lisusu te, bakozala lisusu na somo te mpe moko te kati na bango akozanga lisusu, » elobi Yawe.


Bongo nakopesa bino bakambi kolanda posa ya motema na Ngai, bakambi oyo bakotambolisa bino na bwanya mpe na mayele.


Ngai moko nakoleisa bibwele na Ngai, mpe Ngai moko nakopemisa yango, elobi Nkolo Yawe ;


« Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela babateli bibwele ya mokili ya Isalaele ! Sakola mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na babateli bibwele ya Isalaele, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko ! Boni, babateli bibwele basengeli te penza koluka bolamu ya bibwele ?


Nakotia liboso na yango mobateli moko kaka ya bibwele : Davidi, mosali na Ngai ; akoleisa yango, akoluka bolamu na yango mpe akozala mobateli na yango.


Boye, akozala kimia na bango ! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.


« Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. »


Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.


na koganga : — Bato ya Isalaele, bosunga biso ! Botala moto oyo azali koteya bato nyonso mpe na bisika nyonso, ete batelemela bato na biso, Mobeko na biso mpe Tempelo oyo. Lisusu, akotisi bato ya Grese kati na Tempelo mpe akomisi esika oyo ya bule mbindo.


Moto na moto, kati na bisalelo na ye, asengeli kozala na pawu ya moke mpo na kotimola mabele ; mpe soki akei kosala zongo inene, akotimola mwa libulu mpe akokunda nyei na ye.


Nazali sik’oyo kolendisa bakambi ya Lingomba, oyo bazali kati na bino, pamba te ngai mpe nazali mokambi lokola bango, nazali motatoli ya bapasi ya Klisto mpe nakozwa nkembo oyo ekomonisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ