Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 7:6 - Mokanda na Bomoi

6 Natikali nanu kovanda na ndako moko te, banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo ; nazalaki kotambola bipai na bipai na se ya ndako ya kapo, wana nazalaki kovanda kati na Mongombo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 7:6
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Iri azongiselaki Davidi : — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.


« Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala ; kasi naponaki Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele ! »


Bakoko na biso bazalaki na Ndako ya kapo ya Boyokani kati na esobe, batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, kolanda ndakisa oyo amonaki.


Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko : « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. »


Moto na moto, kati na bisalelo na ye, asengeli kozala na pawu ya moke mpo na kotimola mabele ; mpe soki akei kosala zongo inene, akotimola mwa libulu mpe akokunda nyei na ye.


Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo :


Bana ya Isalaele batunaki Yawe. (Na mikolo wana, Sanduku ya Boyokani ya Nzambe ezalaki kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ