Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 7:27 - Mokanda na Bomoi

27 Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, olakisaki na mosali na Yo makambo oyo na koloba : ‹ Nakosala ete bokonzi ewumela na libota na yo. › Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo na maloba oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 7:27
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakopesa yo bopemi liboso ya banguna na yo nyonso. › Yawe atatoli mpo na yo ete Ye moko akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.


Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi.


Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele.


Yawe, oyokaka posa ya banyokolami, olendisaka bango, mpe oyokaka koganga na bango,


Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo ; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.


Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.


Ngai nazwaki likanisi ya koyebisa yo mpe kosenga na yo ete osomba na yo yango na miso ya bavandi ya engumba mpe ya bakambi oyo bazali awa. Soki ondimi kosomba yango, somba na yo. Soki te, yebisa ngai mpo ete nayeba ; pamba te yo nde ozali moto ya liboso oyo azali na ndingisa ya kosomba yango, mpe ngai nazali na ndingisa sima na yo. Moto yango azongiselaki ye : — Iyo, nakosomba yango.


Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.


Nzokande, mokolo moko liboso ete Saulo akoma, Yawe amonisaki likambo yango epai ya Samuele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ