mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko, mpe bato bakoma kolobaka : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe ya Isalaele. › Boye bokonzi ya libota ya Davidi, mosali na Yo, ekolendisama liboso na Yo.
mpe mpo ete Yawe akokisa elaka oyo apesaki ngai na maloba oyo : « Soki bakitani na yo basali keba na etamboli na bango, soki batamboli liboso na ngai na bosembo, na mitema na bango mobimba, ekozala tango nyonso na moko kati na bakitani na yo, oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele.
Elikana, mobali na ye, alobaki : — Oyo omoni ete ezali malamu, sala yango. Vanda awa kino okokata mwana komela mabele. Tika ete Yawe asunga yo mpo ete okokisa kaka elaka na yo. Boye Ana atikalaki na ndako, akobaki komelisa mwana mabele kino tango akataki ye komela.