Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 7:2 - Mokanda na Bomoi

2 mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 7:2
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Iri azongiselaki Davidi : — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.


Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye : « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko : moko kati na bango azalaki mozwi ; mpe mosusu, mobola.


Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga ; mpe batongelaki Davidi ndako.


Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango. Mpe Davidi abonzaki liboso ya Yawe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.


Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso.


Wana Batisheba azalaki nanu koloba na mokonzi, mosakoli Natan akomaki.


Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada ; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya.


Azaria, mwana mobali ya Natan, azalaki mokonzi ya babateli biloko ya mokonzi ; Zabudi, mwana mobali ya Natan, azalaki Nganga-Nzambe mpe mopesi toli ya mokonzi ;


Tata na ngai, Davidi, azalaki na makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, bato oyo bapasolaka mabanga mpe basharipantie ; mpe batongelaki ye ndako.


Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango, mpe babonzaki liboso ya Nzambe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.


Davidi alobaki na Salomo : « Mwana na ngai, nazwaki likanisi ya kotonga Ndako mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai ;


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Davidi, wuta na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Samuele, na buku ya misala ya mosakoli Natan mpe na buku ya misala ya mosakoli Gadi.


Nzokande, Davidi amemaki Sanduku ya Nzambe, wuta na Kiriati-Yearimi kino na esika oyo abongisaki mpo na yango, pamba te atelemisaki mpo na yango Ndako ya kapo kati na Yelusalemi.


Mokonzi atiaki Balevi kati na Tempelo ya Yawe elongo na bangongi, makembe mpe mandanda kolanda mitindo ya Davidi, ya Gadi, momoni makambo ya mokonzi ; mpe ya mosakoli Natan ; pamba te ezalaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya basakoli na Ye.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Natan, ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo ; mpe kati na buku ya bimoniseli ya Yedo, momoni makambo, na tina na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati.


Alapaki ndayi oyo epai na Yawe, epai ya Elombe ya Jakobi :


kino nakozwa Esika mpo na Yawe, Ndako mpo na Elombe ya Jakobi. »


Moyize akotisaki Sanduku kati na Mongombo mpe atiaki rido mpo na kokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo ete bato bakoka komona Sanduku ya Litatoli te, ndenge kaka Yawe atindaki ye.


« Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba ? »


Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto ! »


oyo azwaki ngolu na miso ya Nzambe mpe asengaki ete atongela Nzambe ya Jakobi ndako.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ