Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 7:15 - Mokanda na Bomoi

15 Kasi nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya Saulo oyo nalongolaki liboso na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 7:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai. Soki asali mabe, nakopesa ye etumbu ; nakosalela bato lokola fimbu mpo na kobeta ye.


Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. »


Kasi nakobotola ye bokonzi nyonso te ; nakotikela ye etuka moko mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na Yelusalemi, engumba oyo napona. »


Mpe ngai, nakokomisa ye mwana na ngai ya liboso, mokonzi oyo aleki na kotombwama kati na bakonzi ya mokili.


Soki bana na ye basundoli mibeko na ngai mpe balandi bosembo na ngai te,


nakopesa bango etumbu na nzela ya lingenda, mpo na botomboki na bango, mpe na nzela ya makofi, mpo na masumu na bango ;


kasi nakowangana te bolingo na ngai mpe nakobongola te boyengebene na ngai.


Moto nani akoki kozala na bomoi mpe azanga komona kufa ? Nani akolonga kokima nguya ya mboka ya bakufi ?


‹ Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › »


Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


Pamba te botomboki ekokani na lisumu ya kosambela banzambe ya bikeko. Lokola obwaki Liloba na Yawe, Ye mpe abwaki yo ; ozali lisusu mokonzi te.


Kasi Samuele alobaki na Saulo : — Nakozonga elongo na yo te ; pamba te lokola obwakaki Liloba na Yawe, Yawe mpe abwaki yo mpe ozali lisusu mokonzi ya Isalaele te.


Bongo Samuele alobaki na ye : — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.


Molimo na Yawe alongwaki na Saulo, mpe molimo mabe kowuta na Yawe etungisaki ye.


Ye mpe alongolaki bilamba na ye mpe asakolaki liboso ya Samuele ; akweyaki mpe atikalaki bolumbu mokolo yango mobimba mpe butu mobimba. Yango wana bato batunaka : « Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ