Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 7:14 - Mokanda na Bomoi

14 Nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai. Soki asali mabe, nakopesa ye etumbu ; nakosalela bato lokola fimbu mpo na kobeta ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 7:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi nakobotola te bokonzi nyonso na maboko ya Salomo, nakotika ye nanu kokonza na mikolo nyonso oyo akozala na bomoi, mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, oyo naponaki mpe abatelaki mitindo mpe malako na Ngai.


Kasi soki yo mpe bana na yo ya mibali bopengwi mosika na Ngai ; soki botosi te mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino ; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango,


Nakozala tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai ; nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya mokonzi oyo alekaki liboso na yo.


Ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai. Akozala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala Tata mpo na ye, nakolendisa kiti na ye ya bokonzi kati na Isalaele mpo na libela. ›


Alobaki na ngai : « Mwana na yo, Salomo, nde akotonga Ndako na Ngai mpe lopango na Ngai, pamba te naponaki ye mpo ete azala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala tata mpo na ye.


Esengo na moto oyo Nzambe apameli ! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Nakosakola mobeko ya Yawe. Alobaki na ngai : « Ozali Mwana na Ngai ya mobali, na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo.


Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.


Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »


Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye.


Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba : « Ozali mwana na ngai ; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na yo ? » To mpe : « Ngai nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai ? »


Yango nde ekozala libula ya moto oyo akolonga. Nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na Ngai.


Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ