2 Samuele 7:13 - Mokanda na Bomoi13 Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye : « Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. »
Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.