Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 7:11 - Mokanda na Bomoi

11 mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakopesa yo bopemi liboso ya banguna na yo nyonso. › Yawe atatoli mpo na yo ete Ye moko akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 7:11
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mokonzi kovanda na ndako na ye mpe Yawe kopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingelaki ye,


Ah Nkolo Yawe, lokola nde ekokaki te na miso na Yo, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo ! Ah Nkolo Yawe, boni, ezali boye nde osalaka mpo na bato ?


Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, olakisaki na mosali na Yo makambo oyo na koloba : ‹ Nakosala ete bokonzi ewumela na libota na yo. › Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo na maloba oyo.


Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele.


Mpe sik’oyo, na Kombo na Yawe oyo alendisi ngai na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ngai, mpe oyo asali ete bokonzi ezala na libota na ngai ndenge alapaki yango na ndayi, Adoniya akokufa kaka lelo.


mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakotia lisusu banguna na yo na se ya bokonzi na yo. Boye, nazali koyebisa yo ete Yawe akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.


Ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai. Akozala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala Tata mpo na ye, nakolendisa kiti na ye ya bokonzi kati na Isalaele mpo na libela. ›


Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye ? Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye ? Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato


banguna na bango banyokolaki bango mpe batiaki bango na se ya bokonzi na bango.


Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.


Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili.


Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.


Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.


Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango ; bakangaki ata minoko ya bankosi,


Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.


Nabondeli yo, limbisa mabe ya mwasi mosali na yo. Yawe akosala penza ete libota ya nkolo na ngai ewumela tango nyonso na bokonzi, pamba te obundaka bitumba ya Yawe. Tika ete, tango nyonso okozala na bomoi, mabe ata moko te emonana kati na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ