Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 7:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele ; nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 7:10
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki kaka bato ya Isalaele batosi mibeko mpe mitindo nyonso oyo napesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ngai, nakosala ete bayengayenga lisusu te mosika ya mabele oyo napesaki epai ya batata na bango. »


Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso ;


Nakolongola lisusu te makolo ya bato ya Isalaele na mokili oyo napesaki epai ya batata na bango, soki kaka bamipesi na kosala makambo nyonso oyo natindaki bango na tina na mibeko nyonso, mitindo mpe malako oyo napesaki bango na nzela ya Moyize.


Nzambe, toyokaki na matoyi na biso ; bakoko na biso babetelaki biso lisolo ya makambo oyo osalaki na tango na bango, na tango ya kala.


Pamba te ezalaki na mopanga na bango te nde babotolaki mokili, ezalaki mpe maboko na bango te nde ebikisaki bango ; kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali, nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo, pamba te ozalaki kolinga bango.


Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.


Nzete ya vino oyo opikolaki wuta na Ejipito, olonaki yango wana obenganaki bikolo ebele.


Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. »


Okomema bango mpe okovandisa bango na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki, oh Nkolo, mpo na kovanda, Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki.


abalolaki mabele, alongolaki mabanga, mpe alonaki vino ya kitoko koleka ; atongaki kuna ndako molayi ya bakengeli mpe atimolaki ekamolelo ya vino. Akanisaki ete akobuka bambuma ya vino ya kitoko, kasi ebotelaki ye bambuma ya mabe !


Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.


Kati na mokili na yo, okoyoka lisusu te makelele ya mobulu to ya kopanza to ya kobebisama kati na etando na yo ; kasi okobenga bamir na yo ‹ Lobiko, › mpe bikuke na yo ‹ Masanzoli. ›


Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.


To mpe lisusu, soki nazwi mokano ya kotonga to ya kolona ekolo to mokili pakala,


Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosalela bango bolamu, mpe nakozongisa bango kati na mokili oyo. Nakobongisa bango lisusu, kasi nakobebisa bango lisusu te ; nakolona bango lokola nzete, nakopikola bango lisusu te.


Bato ya bikolo ya mayele mabe, oyo bazali lokola basende mpe banzube, bakozingela lisusu bana ya Isalaele te ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe.


Na mokolo wana, elobi Yawe, okobenga ngai : « Mobali na ngai ya libala ; » okobenga ngai lisusu te : « Nkolo na ngai. »


Nakolona bango na mabele na bango moko, mpe bakotikala kopikola bango lisusu te na mabele oyo napesaki bango, » elobi Yawe, Nzambe na yo.


Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »


Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.


Longwa na molako ya bato ya Filisitia, mampinga ya basoda ya mpiko ebimaki mpe ekabwanaki na masanga misato : lisanga ya liboso ezwaki nzela oyo ekenda kino na Ofira, na mokili ya Shuwali ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ