Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 6:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yawe asilikelaki Uza makasi, mpe Nzambe abetaki ye mpo na mbeba na ye. Boye Uza akufaki kaka wana, pembeni ya Sanduku ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 6:7
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza. »


Yawe asilikelaki Uza makasi mpe abetaki ye mpo ete asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe. Boye, Uza akufaki kaka wana liboso ya Nzambe.


Pamba te lokola bino Balevi bozalaki te na mbala ya liboso, yango wana Yawe, Nzambe na biso, asilikelaki biso makasi ; pamba te totunaki Ye te ndenge nini tokokaki komema yango kolanda mibeko. »


Davidi alobaki : « Moto moko te, longola kaka Balevi, akoki komema Sanduku ya Boyokani ya Nzambe, pamba te Yawe aponaki bango mpo na komema Sanduku na Ye mpe kosala mosala na Ye mpo na libela. »


Tango nyonso Mongombo ekolongwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, Balevi nde bakolongola yango ; mpe tango ekotelema, bango mpe kaka nde bakotelemisa yango. Moto mosusu oyo akopusana pembeni na yango asengeli kokufa.


Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Sima na mikolo zomi, Yawe abetaki Nabali, mpe akufaki.


Kasi Nzambe abomaki bato ya Beti-Shemeshi mpo ete batalaki Sanduku ya Yawe : kati na bato nkoto tuku mitano, abomaki tuku sambo. Bato ya Beti-Shemeshi basalaki matanga mpo ete Yawe apesaki bango etumbu ya makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ