Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 6:2 - Mokanda na Bomoi

2 Davidi elongo na basoda na ye nyonso bakendeki na Baale-Yuda mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo moko, Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka kati na basheribe na likolo ya Sanduku.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 6:2
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki, apepaki na mapapu ya mopepe.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.


Yawe azali kokonza ; tika ete bato balenga ! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ; tika ete mabele eningana !


Mosikoli na biso, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga, Mosantu ya Isalaele.


pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.


Kiriati-Bala oyo bazalaki mpe kobenga Kiriati-Yearimi, mpe Raba : bingumba nyonso ezalaki mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo ; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.


Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.


Bongo batindaki bantoma koloba na bato ya Kiriati-Yearimi : « Bato ya Filisitia bazongisi Sanduku ya Yawe ; boya kozwa yango mpe bomema yango epai na bino. »


Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke ; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ