2 Samuele 6:19 - Mokanda na Bomoi19 Bongo apesaki na bato nyonso, na lisanga mobimba ya Isalaele, mibali mpe basi, lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati, gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka. Sima na yango, bato nyonso bazongaki na bandako na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.