Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 6:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 6:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Davidi atindaki bantoma koloba na Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo : — Pesa ngai mwasi na ngai, Mikali, oyo nabalaki ngai moko na motuya ya bangenga nkama moko ya bato ya Filisitia.


Atako bongo, Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi.


Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Yawe na kobeta milolo ya esengo mpe na kobeta bakelelo.


Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki : — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala ?


Tango Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina na esengo, ayinaki ye kati na motema na ye.


Yawe, salela biso ngolu, yokela biso mawa ! Pamba te tolembi kotiolama !


Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, tika ete ba-oyo batiaka elikya kati na Yo basila lokumu te likolo na ngai ! Nzambe ya Isalaele, tika ete bato oyo balukaka Yo bayokisama soni te likolo na ngai !


Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.


Nzokande, bato mosusu bazalaki koseka bango mpe koloba : « Balangwe vino ya sika. »


Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.


Saulo alobaki na Davidi : — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »


Nzokande Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kolinga Davidi. Mpe tango bayebisaki Saulo likambo yango, asepelaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ