1 Davidi asangisaki basoda ya mpiko ya Isalaele, bazalaki nkoto tuku misato.
Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai : Aneri, Eshikoli mpe Mamire ; bango nde bakozwa biloko na bango.
Bikolo nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya Davidi mpe balobaki : « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko.
Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota ya bato ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.
Davidi asangisaki bana nyonso ya Isalaele longwa na moluka ya Ejipito kino na Lebo-Amati, mpo na kozongisa Sanduku ya Nzambe wuta na Kiriati-Yearimi.