Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 5:6 - Mokanda na Bomoi

6 Mokonzi mpe bato na ye bakendeki na Yelusalemi mpo na kobundisa bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda kuna. Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te, pamba te ezala mokufi miso to moto ya tengu-tengu akobengana yo. » Bakanisaki ete Davidi akoki kokota kuna te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 5:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo


Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ; mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir.


Moto ya bwanya abundisaka engumba ya bato ya makasi, mpe akweyisaka bandako ya makasi oyo bato batielaka mitema.


Oh Yelusalemi, yo oyo ovandaka na lubwaku, na mabanga ya etando ya likolo ya ngomba, nazali kosepela na yo te, elobi Yawe, yo oyo olobaka : ‘ Nani azali na makoki ya kobundisa biso ? Nani azali na makoki ya kokota na ekimelo na biso ? ’


Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. »


Melishisedeki azalaki mokonzi ya Salemi mpe Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo. Ezali Melishisedeki nde akendeki kokutana na Abrayami, wana Abrayami azali kozonga sima na ye kolonga bakonzi ; mpe ezali Melishisedeki nde apambolaki Abrayami.


Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron ; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti ; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi ; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni.


Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.


Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango.


Nzokande, bato ya libota ya Benjame babenganaki te bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bavandaka esika moko na bato ya libota ya Benjame.


Bato ya libota ya Yuda babundisaki Yelusalemi mpe babotolaki yango ; babomaki bato ya engumba yango na mopanga mpe batiaki yango moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ