Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boye bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi. Mokonzi Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 5:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo bato ya Yuda bayaki na Ebron mpe bapakolaki kuna Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya libota ya Yuda. Bayebisaki Davidi ete ezali bato ya Yabeshi ya Galadi nde bakundi Saulo.


Sik’oyo, bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te nkolo na bino, Saulo, akufi. Kasi boyeba mpe ete bato ya Yuda bapakoli ngai mafuta mpo ete nakoma mokonzi na bango. »


Abineri alobaki na Davidi : — Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo ; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi. Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia.


Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Yeoyada asalaki boyokani kati na Yawe, mokonzi mpe bato, mpo ete bazala bato ya Yawe ; asalaki lisusu boyokani kati na mokonzi mpe bato.


Bato nyonso ya Isalaele basanganaki na Ebron, epai ya Davidi mpe balobaki : « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko na yo.


Tango bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi, Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, kolanda Liloba na Yawe na nzela ya Samuele.


Nzokande, Yawe, Nzambe ya Isalaele, aponaki ngai kati na libota na ngai mobimba mpo ete nazala mokonzi ya Isalaele mpo na libela. Aponaki Yuda mpo ete azala mokonzi ; mpe kati na ndako ya Yuda, aponaki libota ya tata na ngai ; mpe kati na bana mibali ya tata na ngai, asepelaki kokomisa ngai mokonzi ya Isalaele mobimba.


Yeoyada asalaki boyokani kati na ye, bato nyonso mpe mokonzi, mpo ete bazala bato ya Yawe.


Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango : « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi : ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › »


Jozue mpe Isalaele mobimba balongwaki na Egiloni, bamataki kino na Ebron mpe babundisaki yango.


Boye Jefite akendeki nzela moko na bampaka ya Galadi, mpe bato ya Galadi bakomisaki ye mokambi mpe mokonzi ya mampinga. Mpe Jefite azongelaki koloba maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, kati na Mitsipa.


Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.


Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.


Bango mibale basalaki boyokani liboso ya Yawe. Jonatan azongaki epai na ye, mpe Davidi atikalaki na Oreshi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ