23 Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango ; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie.
Sima na yango, Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda ? Yawe azongisaki : — Okoki na yo kokende. Davidi atunaki lisusu : — Nakende wapi ? Yawe azongisaki : — Kende na Ebron.
Davidi atunaki Yawe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
Okosala engumba Ayi mpe mokonzi na yango ndenge osalaki Jeriko mpe mokonzi na yango ; kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba, biloko mpe bibwele na yango. Bomba basoda na sima ya engumba. »
Boni, mokolo wana ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kotuna mpo na ye makambo epai ya Nzambe ? Nakanisi ete ezali bongo te. Boye tika ete mokonzi atangela mosali na ye to moko kati na libota ya botata na ngai ngambo te ; pamba te mosali na yo ayebi ata eloko moko te kati na likambo oyo nyonso.