Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 5:22 - Mokanda na Bomoi

22 Bato ya Filisitia bayaki lisusu mpe bapanzanaki kati na lubwaku ya Refayimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 5:22
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bitumba ezalaki lisusu kati ya bato ya Filisitia mpe bato ya Isalaele. Davidi akitaki elongo na basoda na ye mpo na kobundisa bato ya Filisitia ; mpe Davidi alembaki.


Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami.


Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya Refayimi.


Sima na yango, mosakoli ayaki epai ya mokonzi ya Isalaele mpe alobaki : — Lendisa basoda na yo mpe tala nini okoki kosala, pamba te na mobu oyo ekoya, mokonzi ya Siri akoya kobundisa yo lisusu.


Sima na mwa tango, bato ya Filisitia bayaki mpe bapanzanaki lisusu kati na lubwaku.


Ekozala lokola tango basangisaka matiti ya ble mpe loboko ya moloni ebukaka mito na yango, lokola tango balokotaka mito ya ble oyo ekweyaka na lubwaku ya bato ya Refayimi.


Bongo mondelo yango emataki na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, pene ya mopanzi ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi (oyo ezali Yelusalemi). Longwa na esika yango, emataki kino na songe ya ngomba oyo ezali na weste ya Lubwaku ya Inomi, na suka ya ngambo ya nor ya Lubwaku ya Refayimi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ