Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 5:19 - Mokanda na Bomoi

19 Davidi atunaki Yawe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 5:19
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na yango, Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda ? Yawe azongisaki : — Okoki na yo kokende. Davidi atunaki lisusu : — Nakende wapi ? Yawe azongisaki : — Kende na Ebron.


Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango ; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie.


Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango : — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Bazongiselaki ye : — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.


Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.


Tala ndenge bosengeli koloba : « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. »


Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.


Boni, mokolo wana ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kotuna mpo na ye makambo epai ya Nzambe ? Nakanisi ete ezali bongo te. Boye tika ete mokonzi atangela mosali na ye to moko kati na libota ya botata na ngai ngambo te ; pamba te mosali na yo ayebi ata eloko moko te kati na likambo oyo nyonso.


Davidi atunaki Yawe, alobaki : — Nakoki na ngai kokende kobundisa bato oyo ya Filisitia ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, bundisa bato ya Filisitia mpe bikisa engumba Keila.


Davidi atunaki lisusu Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : — Telema, kende na Keila, pamba te nazali kokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.


Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ